Okotongela Ngai etumbelo ya mabele epai wapi okobonza bambeka na yo ya kotumba, bambeka na yo ya boyokani, meme na yo, ntaba na yo, ngombe na yo. Esika nyonso oyo nakomimonisa mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo.
Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
Sima na mikolo mwambe, bayekoli ya Yesu basanganaki lisusu kati na ndako. Na mbala oyo, Toma mpe azalaki elongo na bango, mpe bikuke ezalaki ya kokangama. Yesu ayaki, atelemaki kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino !
Polo, Silasi mpe Timote ; Epai ya bandeko ya Lingomba ya Tesalonika, ba-oyo bazali kati na Nzambe Tata mpe kati na Nkolo Yesu-Klisto : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino !
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso : « Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo :
Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.