2 Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo.
Kasi Yawe alobaki na ngai : — Koloba te : « Nazali elenge. » Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo.
Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye : — Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?
mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.