Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 18:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, pamba te Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 18:16
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.


Tango nyonso oyo moto akoboma moninga na ye, bakoboma mobomi soki kaka batatoli ebele bafundi, pamba te litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kokatela moto etumbu ya kufa.


Ekomama kutu, kati na mibeko na bino, ete litatoli ya bato mibale nde ezalaka ya solo.


Ekozala mbala na ngai ya misato ya koya epai na bino. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.


Ezali kaka na litatoli ya bato mibale to misato nde okoki koboma moto, kasi na litatoli ya moto moko te.


Litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kotalisa ete moto songolo abomaki moto to asalaki mabe. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.


Kondimaka te maloba ya moto oyo ayei ye moko kofunda mokambi ya Lingomba epai na yo ; okondima ye kaka soki ayei elongo na bato mibale to misato lokola batatoli mpo na kolendisa bosolo ya likambo yango.


Soki babomaka na mawa te moto oyo abuki Mobeko ya Moyize, na litatoli ya bato mibale to misato,


Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ