Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 18:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bokanisi nini ? Soki moto moko azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme na ye tuku libwa na libwa na likolo ya ngomba mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 18:12
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Yawe alobaki na Eliya, moto ya Tishibe, maloba oyo :


Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi ; luka ngai, mosali na Yo, pamba te nabosani mibeko na Yo te. »


Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.


Bato na Ngai bazalaki lokola bameme oyo ebungi nzela ; babateli na bango babungisaki bango nzela, basalaki ete bayengayenga na bangomba, batambola-tambola na bangomba milayi mpe mikuse mpe babosana lopango na bango ya kopemela.


Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.


nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki ; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo.


Bato ya bikolo mosusu bakoyiba bango lisusu te, mpe banyama ya zamba ekoboma bango lisusu te ; bakobika na kimia mpe eloko moko te ekoya lisusu kobangisa bango.


Bosungaki te ebwele oyo elemba mpo ete ekoka kozwa lisusu makasi, bobikisaki te oyo ezalaki na bokono, bosalisaki te oyo ebukana lokolo ; bozongisaki te na nzela, oyo ebimaki libanda ya nzela, mpe bolukaki te oyo ebungaki ; kasi nde bozalaki konyokola yango mpe komonisa yango pasi tango bozalaki kokamba yango !


Bibwele na Ngai ekomaki kotelengana na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse, epanzanaki na mokili mobimba ; moto moko te azalaki koluka yango mpe koluka bolamu na yango.


Kasi Yesu azongiselaki bango : — Nani kati na bino, soki azali kaka na meme moko, mpe meme yango ekweyi kati na libulu, akokita te kati na libulu, na mokolo ya Saba, mpo na kobimisa yango ?


Mpe soki amoni yango, nazali koloba na bino penza ya solo, esengo na ye mpo na meme wana ekoleka esengo mpo na bameme tuku libwa na libwa oyo ebungaki te.


Yesu alobaki na bango lisusu : — Bokanisi nini na tina na lisolo oyo ? Moto moko azalaki na bana mibali mibale ; akendeki epai ya mwana ya liboso mpe alobaki na ye : « Mwana na ngai, kende lelo kosala na elanga ya vino. »


— Bozali kokanisa nini na tina na Klisto ? Azali Mwana ya nani ? Bazongiselaki Ye : — Azali mwana ya Davidi !


Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele ; botala bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe.


Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ