Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 18:11 - Mokanda na Bomoi

11 Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.]

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 18:11
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele.


Yesu azongisaki : — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !


Bokanisi nini ? Soki moto moko azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme na ye tuku libwa na libwa na likolo ya ngomba mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga ?


Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.


pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! » Boye babandaki feti na esengo makasi.


Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »


Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.


Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na mboka mosusu.


Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa ; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.


Soki moto ayoki maloba na Ngai, kasi aboyi kotia yango na misala, Ngai, nakosambisa ye te ; pamba te nayaki te mpo na kosambisa mokili, kasi mpo na kobikisa yango.


Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango.


Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ