9 Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo : — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.
Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [
Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
mpe Yesu alobaki na ye : — Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.