Wana azalaki koloba na ngai, nakomaki na pongi moko ya makasi, mpe nakweyaki elongi kino na mabele ; kasi asimbaki ngai mpe atelemisaki ngai, kaka na esika oyo nazalaki.
wana nazalaki nanu koloba, kati na losambo, Gabrieli, moto oyo namonaki liboso kati na emoniseli, ayaki epai na ngai na lombangu, na tango ya makabo ya pokwa.
Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango : — Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ?
Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.