Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo. Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.
Natelemaki mpe nakendeki na lubwaku. Nkembo ya Yawe ezalaki kuna : ezalaki lokola nkembo oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye nakweyaki elongi na ngai kino na mabele.
Lokola azalaki kopusana pene ya esika oyo nazalaki, nakomaki na somo mpe nakweyaki elongi kino na mabele. Alobaki na ngai : — Mwana na moto, sosola malamu ete emoniseli oyo etali makambo ya suka ya tango.
Moto ebimaki liboso ya Yawe mpe ezikisaki na etumbelo, mbeka ya kotumba mpe biteni ya mafuta. Mpe tango bamonaki bongo, bagangaki na esengo mpe bakweyaki bilongi na bango kino na se.
Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »
Tokweyaki biso nyonso na mabele, mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai na lokota ya Arami : « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ? Ezali pasi mpo na yo komibamba na basende. »
Ndenge moto ezalaki komata na likolo longwa na etumbelo, Anjelu na Yawe mpe amataki kati na moto. Tango bamonaki bongo, Manoa mpe mwasi na ye bakweyaki bilongi kino na mabele.