Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 17:5 - Mokanda na Bomoi

5 Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 17:5
38 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi :


« Nalongolaki mokumba oyo ezalaki na mapeka na ye, mpe maboko na ye elongwaki na bowumbu ya kosimba bitunga. »


Mongongo ya kelelo ezalaki kaka komata se komata. Boye Moyize abandaki koloba na Nzambe, mpe Nzambe azalaki koyanola ye na lokito ya kake.


Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,


Esepelisaki Yawe, mpo na bosembo na Ye, kokomisa Mobeko na Ye eloko ya monene mpe ya lokumu.


« Tala mosali na Ngai, oyo naponi ; molingami na Ngai, mosali oyo nalingaka mingi, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakopesa Ye Molimo na Ngai, mpe akosakola bosembo epai ya bikolo ya bapaya.


Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi kino na mabele mpo ete somo makasi ekangaki bango.


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi ! »


Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : — Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye !


mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »


Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.


Tata alingaka Mwana, mpe Mwana azalaka na bokonzi kowuta na Tata mpo na kokonza nyonso.


Ye moko, Tata, oyo atindaki Ngai atatolaki mpo na Ngai. Botikala nanu te koyoka mongongo na Ye mpe komona elongi na Ye ;


Sima na Yesu koloba bongo, amemamaki, wana bazalaki kotala, mpe lipata moko ezipaki Ye na miso na bango.


Ezalaki kaka Moyize wana oyo alobaki na bana ya Isalaele : « Nzambe akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino. »


mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.


Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino ; bosengeli koyoka ye.


Soki moto aboyi koyoka maloba na Ngai, oyo mosakoli yango akoloba na Kombo na Ngai, Ngai moko nakopesa ye etumbu.


Oyo nde mibeko oyo Yawe alobaki na mongongo makasi kati na moto epai ya lisanga mobimba oyo ezalaki likolo ya ngomba kati na mapata mpe molili makasi ; mpe abakisaki ata likambo moko te. Bongo akomaki yango na bitando mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango.


Akangolaki biso na bokonzi ya molili mpe amemaki biso kati na bokonzi ya Mwana na Ye ya bolingo,


Mpe tango kaka Nzambe akomisaki Ye ya kokoka, akomaki, mpo na bato nyonso oyo batosaka Ye, Mopesi lobiko ya seko ;


« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.


Bongo namonaki lipata moko ya pembe, mpe ekelamu moko lokola mwana na moto evandaki na likolo ya lipata yango. Ezalaki na motole ya wolo na moto na yango mpe na mbeli ya minu makasi na loboko na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ