Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 17:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mbala moko, bamonaki Moyize mpe Eliya bazali kosolola na Yesu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 17:3
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.


Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.


Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya !


Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu.


mpe akotambola liboso ya Nzambe, elongo na molimo mpe nguya oyo ezalaki kovanda kati na Eliya, mpo na kozongisa boyokani kati na batata mpe bana na bango, mpo na kosala ete batomboki bakoma kokanisa lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisa bato mpo na Nkolo.


Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.


Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.


Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »


Wana mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petelo alobaki : — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kozala awa ! Totonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya. Solo, Petelo ayebaki te makambo oyo azalaki koloba.


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.


Wuta mokolo wana, mosakoli moko te atikalaki lisusu kobima kati na Isalaele, oyo akokanaki na Moyize oyo Yawe azalaki kosolola na ye miso na miso,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ