Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 17:24 - Mokanda na Bomoi

24 Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki : — Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 17:24
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tokosomba lisusu te epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso, biloko nyonso to mbuma nyonso oyo bakoya kotekela biso na mokolo ya Saba to na mikolo mosusu ya bule. Sima na mibu sambo nyonso, tokopemisa mabele mpe tokotikela bato baniongo na biso nyonso.


Moto nyonso oyo batangi asengeli kofuta motuya oyo mpo na Yawe lokola mpako, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo : bagrame motoba ya palata.


Elingi koloba ete moto nyonso oyo batangaki amemaki bagrame mitano na badesigrame sambo, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Bato nyonso oyo batangamaki, oyo bazalaki na mibu ya mbotama tuku mibale mpe koleka, bazalaki nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.


Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa ? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te ?


Tango bakomaki na Kapernawumi, wana bazalaki kati na ndako, Yesu atunaki bango : — Likambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ