Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Mwana na Moto koya kati na nkembo ya bokonzi na Ye.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.
Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo : — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
Yesu akomaki koteya bango : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa.
Mpe alobaki : — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola ? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sik’oyo koteka mpe koboma,