Nani oyo azali komonana lokola moyi ya tongo, kitoko lokola sanza, azali kongenga lokola moyi, abangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango ?
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Bongo namonaki anjelu mosusu ya nguya makasi kokita wuta na Lola ; lipata moko ezipaki ye mpe monama ezingelaki moto na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moyi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto.
Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.