Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [
Yesu akotaki na ndako ; lokola bayekoli batikalaki bango moko kaka elongo na Ye, batunaki Ye : — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ?