Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 17:18 - Mokanda na Bomoi

18 Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 17:18
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki mokufi miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye ; boye moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba mpe komona.


Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo ! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.


Yesu alobaki : — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.


Bongo bayekoli bakendeki na nkuku epai ya Yesu mpe batunaki : — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ?


Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.


bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba ; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali.


Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo ! »


Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga : « Ozali solo Mwana na Nzambe ! » Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto.


Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko.


Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye.


Lokola azalaki kosala bongo wuta mikolo ebele, suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo mabe yango : — Na Kombo na Yesu-Klisto, napesi yo mitindo : bima kati na mwasi oyo ! Kaka na tango yango, molimo yango ebimaki kati na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ