Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 17:17 - Mokanda na Bomoi

17 Yesu alobaki : — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 17:17
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›


Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.


Boye Yawe alobaki na Moyize : — Kino tango nini bokoboya kobatela mibeko mpe malako na Ngai ?


« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?


Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ?


Yawe atindeli bango molimo ya kizunguzungu : bango nde basalaki ete Ejipito ekoma kotenga-tenga na misala na yango nyonso ndenge moto oyo alangwe masanga atengaka-tengaka.


Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ?


Yawe alobaki na Moyize : — Kino tango nini bato oyo bakotiola Ngai ? Kino tango nini bakoboya penza kondimela Ngai, ezala mpo na bikamwa nyonso oyo nasali kati na bango ?


— Kino penza tango nini lisanga oyo ya batomboki ekokoba kotelemela Ngai ? Solo, nayoki bileli mpe koyimayima ya bana ya Isalaele na tina na Ngai.


Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.


Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ?


Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye.


Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.


Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki.


Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye.


Yesu alobaki na bango : — Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.


Yesu alobaki na bango : — Ah ! Bozali penza bazoba ! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga ! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba !


Yesu alobaki : — Bino, ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima, tango boni nasengeli lisusu kovanda elongo na bino mpe koyikela bino mpiko ? Mema mwana na yo awa.


Bongo, alobaki na Toma : — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai ; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima !


Mibu tuku minei mobimba, ayikelaki bango mpiko kati na esobe ;


Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo : — Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.


Bandeko, nabondeli bino : boyikela nanu oyo emonani lokola bozoba na ngai mpiko ! Iyo, boyikela ngai mpiko.


Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ; bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino, bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ