Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 17:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 17:12
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Yoane Mobatisi azalaki kati na boloko, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo Klisto azalaki kosala ; atindaki bayekoli na ye


Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.


Yesu azongisaki : — Solo, Eliya asengeli koya mpe akozongisa makambo nyonso na molongo.


Bayekoli basosolaki ete azalaki kolobela bango na tina na Yoane Mobatisi.


Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile ; Yesu alobaki na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato,


Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo : — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.


pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te ; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


Pamba te, tango Yoane Mobatisi ayaki, azalaki kolia mapa te mpe azalaki komela vino te, mpe bolobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »


Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te ;


akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.


tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono ; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.


Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola ? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sik’oyo koteka mpe koboma,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ