7 Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango : — Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te !
Yesu alobaki na bango : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo !
Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ?
Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : — Soki tolobi : « Ewutaki na Nzambe, » akotuna biso lisusu : « Bongo mpo na nini bondimaki ye te ? »
Babatelaki likambo yango na motema. Atako bongo, bazalaki kaka kotunana : — Kosekwa kati na bakufi elingi koloba nini ?
Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko.
Tembe moko ebimaki kati na bayekoli ; bazalaki koluka koyeba moto oyo aleki monene kati na bango.
Petelo azongisaki : — Te, Nkolo ! Natikala nanu kolia te eloko ya mbindo to ya bosoto.