Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 16:4 - Mokanda na Bomoi

4 Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya Yona. Bongo atikaki bango wana mpe akendeki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 16:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »


« Kasi bino, boya awa, bino bana ya mwasi ya soloka, bino bana oyo bobotami na nzela ya ekobo mpe ya kindumba.


Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko : tika ye akoba bongo !


Ezala soki babokoli bana, nakobotola bango liboso ete bakola. Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo !


Yawe alobaki na Yona, mwana mobali ya Amitayi :


Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.


Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa.


Yesu ayokaki mawa makasi kati na molimo na Ye mpe alobaki : « Mpo na nini bato ya ekeke oyo bazali kosenga elembo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : bakopesamela elembo moko te ! »


Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.


Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo : — Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ