Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso ; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ?
Namilobelaki kati na ngai : « Nzambe akosambisa, ezala bato ya sembo to bato mabe, pamba te ezali na tango mpo na likambo moko na moko, mpe ezali na tango mpo na kosambisa likambo moko na moko. »
mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa ; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye.
Moto oyo asali masumu, ye moko nde akokufa. Mwana akomema ngambo ya tata na ye te, mpe tata akomema ngambo ya mwana na ye te. Moto ya sembo akozwa litomba mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe akozwa etumbu mpo na mabe na ye.
Ebale ya moto ezalaki kobima mpe kotambola liboso na Ye. Minkoko ya bato bazalaki kosalela Ye, minkoko ya minkoko ya bato batelemaki liboso na Ye. Basambisi bavandaki, mpe babuku efungwamaki.
Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali ; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso.
Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye ; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.
Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.
Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.
Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
Yesu azongisaki : — Iyo, ezali se bongo. Mpe bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya elongo na mapata ya Likolo.
Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.
Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, Mwana na Moto akoyoka ye soni, tango akoya kati na nkembo na Ye mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya ba-anjelu ya bule.
Mpo na yango, sango epanzanaki kati na bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki te ete moyekoli wana akokufa te, kasi alobaki nde : « Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini ? »
— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo ? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.
Pamba te biso nyonso tokosamba liboso ya esambiselo ya Klisto mpo ete moto nyonso azwa lifuti oyo ekoki na ye kolanda makambo oyo asalaki na nzela ya nzoto na ye, makambo ya malamu to ya mabe.
pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso.
Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele : akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma.
Lokola mpe bobelelaka Tata oyo aponaka bilongi te tango asambisaka bato nyonso kolanda misala na bango, botambola kati na kobanga Nzambe, wana bozali awa na mokili lokola bapaya.
Sik’oyo, bana na ngai, bowumela ya kokangama na Klisto mpo ete, na ngonga nyonso oyo akomimonisa, tozala na elikya mpe toyoka soni te na liboso na Ye tango akoya.
« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.
Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.
Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku.