Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 16:26 - Mokanda na Bomoi

26 Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 16:26
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Satana azongiselaki Yawe : — Poso mpo na poso : moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye.


Elikya nini moto mabe azali na yango tango Nzambe azwi bomoi na ye ?


Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akozwa yango lisusu.


Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.


Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo.


Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »


Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.


Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi amibungisi to abebisi bomoi na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ