Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 16:25 - Mokanda na Bomoi

25 Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akozwa yango lisusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 16:25
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu ; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi ?


— Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka !


tango ya koluka mpe tango ya kobungisa, tango ya kobomba mpe tango ya kobwaka ;


Moto oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; mpe moto oyo abungisi bomoi na ye likolo na Ngai akozwa yango lisusu.


Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?


Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu akobikisa yango.


Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.


Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko.


Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango ; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ