Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 16:24 - Mokanda na Bomoi

24 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 16:24
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpo na kolanda Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.


Wana bazalaki kobima na engumba, bakutanaki na moto moko ya Sirene, kombo na ye ezalaki Simona ; mpe bakangaki ye na makasi mpo ete amema ekulusu ya Yesu.


Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye : — Ozangi eloko moko kaka : kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu ; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi.


Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.


Mpe moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpe alandaka Ngai te akoki te kozala moyekoli na Ngai.


Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu.


Yesu amemaki, Ye moko, ekulusu na Ye ; abimaki na engumba mpe akendeki na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gologota. »


Yesu alobaki bongo mpo na kotalisa lolenge ya kufa oyo Petelo asengelaki kokufa mpo na nkembo ya Nzambe. Sima na Ye koloba bongo, alobaki na Petelo : — Landa Ngai !


Yesu azongisaki : — Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini ? Kasi yo, landa Ngai.


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


Nazali sik’oyo kosepela na pasi oyo nazali komona mpo na bino ; pamba te pasi oyo Klisto atikalaki komona te, ngai nazali kokokisa yango kati na nzoto na ngai mpo na bolamu ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba.


na tina ete moko te kati na bino abungisa kondima likolo ya pasi oyo bozali komona ; pamba te bino moko boyebi malamu ete tobongisama mpo na yango.


Solo, bato nyonso oyo balingi kotambola na botosi kati na Yesu-Klisto bakonyokolama.


Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ