23 Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Ozali epekiselo mpo na Ngai ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.
Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !
Kasi Yesu abalukaki, atalaki bayekoli na Ye mpe apamelaki Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.