Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye : — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango : sakola elonga mpo na mokonzi !
Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Ozali epekiselo mpo na Ngai ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.