Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 16:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bongo Yesu apekisaki makasi bayekoli na Ye koloba na moto ete Ye azali Masiya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 16:20
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi abotaki Jozefi, mobali ya Mari ; mpe Mari azalaki mama ya Yesu oyo babengaka Klisto.


Simona Petelo azongisaki : — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.


Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo : — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.


mpe Yesu alobaki na ye : — Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.


Yesu apekisaki bango makasi koloba bongo na moto ata moko.


Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apekisaki bango koloba ata na moto moko, makambo oyo bawutaki komona kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.


Mobikisi abotameli bino lelo, kati na engumba ya Davidi ; Ye nde azali Masiya, Nkolo.


Yesu apesaki bango mitindo ete bameka koloba bongo te ata na moto moko.


Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.


Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye : « Tomoni Masiya  ! »


Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.


Marte azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.


Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.


Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.


Boye nani mokosi ? Mokosi azali moto oyo awangani ete Yesu azali Klisto. Mpe moto ya ndenge wana azali monguna ya Klisto : awanganaka Tata mpe Mwana.


Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ