2 Yesu azongiselaki bango : — Na pokwa, bolobaka : « Mokolo ya lobi ekozala mokolo malamu, pamba te likolo ezali motane ! »
Mpe na tongo, bolobaka : « Mvula makasi ekobeta lelo, pamba te mapata eyindi. » Solo, boyebi kososola bilembo oyo elakisaka soki mvula ekobeta to ekobeta te, kasi bozangi makoki ya kososola bilembo ya tango !