18 Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.
nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
Esengo na moto oyo atondisi makonga kati na ebombelo na ye ya makonga ! Akokufa soni ata moke te tango akosamba elongo na banguna na ye na ekuke ya engumba.
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.
Nazalaki komilobela : « Tango nazali nanu na makasi na nzoto, naleka solo na nzela ya ekuke ya kufa mpe nazangela mibu oyo etikali na bomoi na ngai ? »
Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga ; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.
Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale : liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo ; Andre, ndeko ya Petelo ; Jake, mwana mobali ya Zebede ; Yoane, ndeko ya Jake ;
Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo.
Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.
Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.
Bomibatela malamu mpe bobatela etonga nyonso oyo kati na yango Molimo Mosantu atiaki bino lokola bakengeli ; bobatela Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na Ye moko.
Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.
na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,
mpo ete, soki nawumeli mpo na koya, oyeba ndenge nini bato basengeli kotambola kati na Ndako ya Nzambe, oyo ezali Lingomba ya Nzambe na bomoi, likonzi mpe moboko ya bosolo.
Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »
Mir ya engumba yango etongamaki likolo ya miboko zomi na mibale, mpe bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mpate ezalaki ya kokomama na likolo na yango.