17 Yesu alobaki na ye : — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona ! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai.
Bandeko na ngai, nazali koyebisa bino ete nzoto ya mosuni mpe makila ekoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe, mpe oyo epolaka ekoki te kosangana na oyo epolaka te.
Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.
Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa,
Nazali sik’oyo kolendisa bakambi ya Lingomba, oyo bazali kati na bino, pamba te ngai mpe nazali mokambi lokola bango, nazali motatoli ya bapasi ya Klisto mpe nakozwa nkembo oyo ekomonisama.
Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.