14 Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.
Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame ; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.
Alobaki na basali na ye : — Ezali penza Yoane Mobatisi ! Asekwi kati na bakufi ; yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa.
Yesu atunaki bango lisusu : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?
Bayekoli batunaki Yesu : — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ?
Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda :
Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! » Bamosusu : « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala ! »
Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli.
bamosusu : « Eliya abimi, » mpe bamosusu lisusu : « Moko kati na basakoli ya kala asekwi. »
Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ? Azongisaki : — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ? Azongisaki : — Te !
Kati na bato, tembe ekomaki makasi na tina na Ye. Bamoko bazalaki koloba : Azali moto malamu ; bamosusu : « Te, azali kokosa bato nyonso. »
Batunaki lisusu mokufi miso : — Bongo yo, olobi nini na tina na ye, pamba te ezali miso na yo nde abikisi ? Azongiselaki bango : — Azali mosakoli.