Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 16:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bafarizeo mpe Basaduseo bayaki epai na Yesu mpo na kotiela Ye motambo ; basengaki na Ye ete alakisa bango elembo moko kowuta na Likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 16:1
33 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Zongisela zoba kolanda bozoba na ye, noki te akomimona moto ya bwanya na miso na ye moko.


Bafarizeo babimaki mpe bakabolaki makanisi kati na bango mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.


Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye :


Yesu alobaki na bango : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo !


Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye ; bapesaki Ye motuna : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo ?


Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko.


Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki : — Bato ya bilongi mibale ! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ?


Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye :


« Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazali na mokumba ya koteya bato mibeko ya Moyize.


Mokolo oyo elandaki, mokolo oyo elandaki Mokolo ya kobongisa Saba, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bakendeki epai ya Pilato


Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.


Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala ?


Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango : — Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ? Bomemela Ngai mbongo moko ya ebende, mpo ete namona yango.


Bongo Basaduseo, ba-oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye :


Molakisi moko ya Mobeko atelemaki mpe atunaki mpo na komeka Yesu : — Moteyi, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?


Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo.


Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango :


Ndambo ya Basaduseo, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai ya Yesu mpo na kotuna Ye motuna oyo :


Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.


Wana Petelo mpe Yoane bazalaki nanu koloba na bato, Banganga-Nzambe, mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe Basaduseo bayaki,


Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso oyo bazalaki kosala na ye elongo, oyo bazalaki bato ya lisanga ya Basaduseo, batondaki na zuwa.


Lokola mpe Bayuda bazali koluka bikamwa, mpe Bagreki, bwanya,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ