Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:8 - Mokanda na Bomoi

8 « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo, mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai !


Nkolo alobi : « Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko, bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ; mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.


Olonaki bango mpe bazwi misisa ; bazali kokola mpe kobota mbuma. Ozali tango nyonso pene ya minoko na bango, kasi mosika ya mitema na bango.


Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.


Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :


Yesu azongiselaki bango : — Bato ya bilongi mibale ! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama : « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;


Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye : — Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te !


mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana.


Solo, ozali na libula te to na makoki te kati na lotomo oyo, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe.


Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi ;


Solo, moto nyonso oyo azali na posa ya kolinga bomoi mpe kobika mikolo ya esengo asengeli kobatela lolemo na ye mosika na mabe, mpe bibebu na ye mosika na maloba ya lokuta ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ