Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:4 - Mokanda na Bomoi

4 Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


Moto oyo akolakela tata to mama na ye mabe, asengeli kozwa etumbu ya kufa.


Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.


Yokela tata oyo aboti yo, mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.


Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.


Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.


Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.


Moto nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, esengeli baboma ye ; pamba te alakeli tata na ye to mama na ye mabe : makila na ye ekotangama na moto na ye moko.


Yesu azongiselaki bango : — Bongo bino, mpo na nini botosaka te mibeko ya Nzambe, kasi botosaka kaka bokoko na bino ?


Kasi bino, bolobaka : « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye : ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe, ›


okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.


Yesu alobaki na ye : — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »


Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.


Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo.


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo mpo ete ozala na bomoi ya molayi, mpe ozala moto ya esengo kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ