Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato.
Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.
Soki kaka bokoti na engumba, bomona ye mbala moko, liboso ete amata na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kolia ; pamba te bato bakoki kobanda kolia te soki ye akomi nanu te : asengeli nanu kopambola mbeka liboso ete bato oyo babengami babanda kolia. Bomata sik’oyo, mpe bokomona ye na ngonga oyo.