Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:32 - Mokanda na Bomoi

32 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki : — Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:32
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye : — Pesa yango na bato mpo ete balia !


Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.


Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo.


Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?


Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango ; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye.


mpo na koloba na ye : — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. »


Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.


Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso.


Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye : — Kolela te !


Wana bazalaki kozela tongo kotana, Polo alendisaki bato nyonso ete balia ; alobaki : — Ekokisi lelo mikolo zomi na minei wuta bozali kozela, mpe bolie ata eloko moko te.


Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ