Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:31 - Mokanda na Bomoi

31 Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:31
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto yango atunaki Jakobi : — Kombo na yo nani ? Jakobi azongisaki : — Kombo na ngai ezali Jakobi.


Atongaki kuna etumbelo moko oyo abengaki : « El, Nzambe ya Isalaele. »


Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.


Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka, apesaka ngai lokumu ; mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye, nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »


epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele ; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo.


Bato ebele bayaki epai na Ye ; bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bakufi miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko mpe bato mosusu ebele. Batiaki bango na makolo ya Yesu, mpe Yesu abikisaki bango.


Soki loboko to lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko to na lokolo moko, na esika ete otikala na maboko mibale to makolo mibale mpe obwakama na moto ya libela na libela.


Bakufi miso mpe bato oyo batambola tengu-tengu bapusanaki pene na Yesu kati na lopango ya Tempelo, mpe abikisaki bango.


Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !


Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te.


Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki : — Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te !


Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.


Mbala moko, atelemaki, akamataki tsipoyi na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Totikala nanu komona likambo ya boye te ! »


Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba : — Azali kosala makambo nyonso malamu ; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba.


Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko, na esika ete otikala na maboko mibale mpe okende na lifelo, kati na moto oyo ekufaka te, [


Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono ;


Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye : « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. »


Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.


Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba : — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !


Bafarizeo babengisaki lisusu, mpo na mbala ya mibale, moto oyo azalaki mokufi miso mpe balobaki na ye : — Pesa Nzambe nkembo na koloba solo ; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ