Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:28 - Mokanda na Bomoi

28 Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo ! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:28
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.


Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.


akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.


Ezala soki apesi etumbu, ayokaka kaka mawa mpo na bolingo monene na Ye.


Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?


Mwasi yango alobaki : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !


Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !


Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda : — Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo ! Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.


Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo. Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.


Yesu alobaki na ye : — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !


Bantoma balobaki na Nkolo : — Bakisa kondima na biso !


Kasi Yesu alobaki na mwasi yango : — Kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia !


Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki ye mingi ; bongo abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda Ye mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezala kati na Isalaele, natikali nanu komona te kondima ya boye.


Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ