Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:27 - Mokanda na Bomoi

27 Mwasi yango alobaki : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:27
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. ›


mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »


Nzambe na ngai, defisa ngai litoyi na Yo mpe yoka ngai na bokebi ! Fungola miso na Yo mpe mona kobebisama ya bisika na biso mpe ya engumba oyo mpo na bolamu na yango. Ngai, nazali kobelela Kombo na Yo ! Ezali te mpo tozali sembo, kasi ezali nde mpo na mawa monene na Yo nde tozali kobondela Yo !


Yesu azongisaki : — Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !


Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo ! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.


Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.


Mokonzi ya basoda alobaki : — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.


Mwasi yango azongiselaki Yesu : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni oyo bana bakweyisaka na se ya mesa !


azalaki koluka ata kolia biloko oyo ezalaki kokweya longwa na mesa ya mozwi, kasi ezalaki bambwa nde ezalaki koya kolembola bapota na ye.


Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »


Boye, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe Mogreki, pamba te bango nyonso bazali na Nkolo moko oyo apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda ? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te ? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya.


Soki moke te ! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama : « Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo, mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. »


mpe mpo ete bozwa nguya ya koyeba bolingo yango ya Klisto, oyo eleki boyebi nyonso, na tina ete botondisama kino na bofuluki nyonso ya Nzambe.


Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ