Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:26 - Mokanda na Bomoi

26 Yesu azongisaki : — Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:26
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, sunga ngai !


Mwasi yango alobaki : — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !


Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.


oyo bazali bana ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango kosambela na solo, apesa bango bilaka


Biso tobotama Bayuda, tozali Bapagano te oyo bazali basumuki.


Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.


Bosala keba na bambwa, na bato mabe mpe na bato oyo batindikaka bino na kokatisa ngenga !


Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ