Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:24 - Mokanda na Bomoi

24 Yesu azongisaki : — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:24
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.


nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki ; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo.


Nakotia liboso na yango mobateli moko kaka ya bibwele : Davidi, mosali na Ngai ; akoleisa yango, akoluka bolamu na yango mpe akozala mobateli na yango.


Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye : — Bengana ye ; azali kotiela biso makelele !


Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.]


Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli.


Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko : — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.


Pamba te nazali koloba na bino solo : Klisto akomaki Mosali ya Bayuda mpo na kokokisa bilaka oyo Nzambe apesaki epai ya bakoko na bango mpe kolakisa ete Nzambe azali Moyengebene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ