Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:19 - Mokanda na Bomoi

19 Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:19
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe.


Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Nayinaka bato ya mitema mibale, kasi nalingaka nde mibeko na Yo.


Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.


Mabongisi ya bozoba ezali masumu, mpe bato bayinaka motioli.


Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.


azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.


Tika ete moto mabe atika banzela na ye, mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye ; tika ete azonga epai na Yawe mpo ete ayokela ye mawa, tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, pamba te alimbisaka kaka.


Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.


Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?


Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ?


Balami azongiselaki ane : — Ozali kosakana na ngai ! Soki nazalaki na mopanga na loboko na ngai, mbele nabomi yo kaka sik’oyo !


Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo ; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.


Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ?


Boye, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo ete alimbisa yo, soki ekoki kosalema, mpo na makanisi oyo ozalaki na yango kati na motema na yo.


Pamba te nayebi malamu ete bolamu evandaka kati na ngai te, elingi koloba : evandaka kati na nzoto na ngai te. Nazalaka na posa ya kosala bolamu, kasi nazangaka nguya ya kokokisa yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ