18 Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.
Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo oyo ezali malamu, kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka na makambo mabe.
Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi, kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele ebimisaka bozoba.
Motema ya moyengebene ekanisaka liboso ya kopesa eyano, kasi monoko ya moto mabe ebimisaka maloba ya mabe.
Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe :
Libota ya banyoka ! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe ? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye :
eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.
Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo ?
Yesu alobaki lisusu : — Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.
Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.
Tika ete Yawe azala Mosambisi kati na ngai mpe yo, mpe tika ete Yawe azongisela yo mabe na mabe oyo osali ngai ! Kasi loboko na ngai ekosimba yo te.