Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:16 - Mokanda na Bomoi

16 Yesu atunaki bango : — Bino mpe, boni, bozwi nanu bososoli te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:16
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, bososoli makambo oyo nyonso ? Bazongisaki : — Iyo !


Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango : — Boyoka mpe bososola makambo oyo :


Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu : — Limbolela biso lisese oyo.


Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo ?


Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino : bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo ?


Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ?


pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mapa, mpo ete mayele na bango ezalaki ya kozipama.


Alobaki na bango : — Bino mpe, boni, bozali mayele te ? Bozali kososola te ete eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo.


Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.


Bayekoli basosolaki ata eloko moko te kati na makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te makambo oyo Yesu azalaki kolobela.


Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.


Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.


Bosengelaki wuta kala kokoma balakisi ; kasi kino sik’oyo, bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba na Nzambe. Bokomi kutu na posa ya miliki, kasi ya bilei ya makasi te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ