Matayo 15:14 - Mokanda na Bomoi14 Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana, Nkolo akosepela na bilenge te, akoyokela bana bitike mpe basi bakufisa mibali mawa te, pamba te bango nyonso bazali kotiola Nzambe, bazali kosala mabe, mpe minoko nyonso ezali kobimisa maloba ya bozoba. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.