Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 15:10 - Mokanda na Bomoi

10 Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango : — Boyoka mpe bososola makambo oyo :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 15:10
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe alobaki : — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! Abakisaki : — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !


Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.


Yawe alobaki na ngai : — Kende koloba na bato oyo : « Boyoka na bino, kasi bokososola te ; botala na bino, kasi bokomona te !


Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.


eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.


basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »


Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—


Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.


mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.


Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,


Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ