4 pamba te Yoane azalaki koloba na ye : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. »
Natan alobaki na Davidi : — Moto yango ezali nde yo ! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo ;
Okoyebisa ye makambo oyo : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te ? › Okobakisa lisusu : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › »
Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye, kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.
Bato oyo babukaka mibeko bakumisaka bato mabe, kasi bato oyo babatelaka mibeko batelemelaka bato mabe.
Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.
Mosakoli Jeremi alobaki na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, maloba wana nyonso, kati na Yelusalemi,
Okosambwisa te ndeko na yo ya mobali na kosangisa nzoto na mwasi na ye.
Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya ndeko na ye ya mobali, ezali likambo ya mbindo ; asambwisi ndeko na ye ya mobali ; bakokufa bazanga bana.
Yoane azalaki koloba na Erode : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na yo. »