34 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti.
Tango bavandi ya esika wana basosolaki ete ezali Yesu, bapanzaki sango kati na etuka mobimba ; mpe bamemelaki Ye babeli nyonso.
Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.