32 Tango bamataki na bwato, mopepe ekitaki.
Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?
Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki : — Ya solo, ozali Mwana na Nzambe !
Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »
Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza,
Balingaki kokotisa Yesu na bwato, kasi, mbala moko, bwato etutaki mabele ya esika oyo bazalaki kokende.