Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 14:31 - Mokanda na Bomoi

31 Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 14:31
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo : « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. »


Tango pasi ekweyelaka ngai, obatelaka bomoi na ngai, osembolaka loboko na Yo mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai ; mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.


Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkembo ezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize, Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bango mpo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela ;


Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki : — Nkolo, bikisa ngai !


Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ?


Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [


Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki.


Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye ; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei.


Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : — Nalingi ete ezala bongo, koma peto.


Nazali koloba na bino penza ya solo : soki moto alobi na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale ; » soki atie tembe te kati na motema na ye, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalema, solo, akomona yango kokokisama.


Bokende sik’oyo koyebisa Petelo mpe bayekoli mosusu : « Akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye, ndenge kaka ayebisaki bino. »


Bongo alobaki na bayekoli na Ye : — Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?


Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye : « Talita kumi ! » Elingi koloba : Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema !


oyo balobaki na bango : — Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona !


Boye, sembola loboko na Yo mpo na kobikisa babeli, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene, na Kombo na Yesu, Mosali na Yo, Mosantu.


Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa ; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.


Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.


ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ