30 Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki : — Nkolo, bikisa ngai !
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, tango mosali ya moto na Nzambe alamukaki mpe abimaki, amonaki ete mampinga elongo na bampunda mpe bashar bazingelaki engumba. Mosali yango alobaki na Elize : — Oh nkolo na ngai, eyindi na libanda ! Tokosala nini !
Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso.
Yesu alobaki na ye : — Yaka. Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu.
Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?
Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.